Mokolo Elongo na Yesu

Boni, ozali koluka nzela ya kobongola bomoyi na yo… makambo ya motuya ya bomoyi na yo… bizaleli na yo… ba mposa oyo etindaka yo?

Kolekisa Mikolo elongo na Yesu ekoki kosala yango! MentorLink International esila kobongisa elongo na Projet ya Film ya Yesu mpo na kopesa ntina ya sika na Film ya YESU lokola esalelo ya kokomisa bayekoli mpe kokolisa bakambi. 

Mbano na yango ezali liboke ya ba video evandisami nzinga-nzinga na bomoyi ya Klisto mpe malakisi na ye, esangisami elongo na mituna mpo na kolamusa makanisi mpo na kokanisa, kokabola makanisi mpe mpo na kotia yango na misala na kati ya bomoyi.

Banda mobembo na yo elongo na Yesu lelo!

Mikolo Tuku Miney Elongo na Yesu

Oyo ezali mobimba ya film ya Yesu na biteni 40. Tambola elongo na Yesu kati na bomoyi na Ye mpe mosala na Ye awa na mabele na koyekola ndenge nini Ye alingi été biso tobika, tokamba mpe tomema bato na mbongwana.

 

Mikolo Libwa Elongo na Yesu: Losambo

Sala mobembo elongo na Yesu mpe elongo na bayekoli mpe yekola mingi koleka na maye matali losambo.

 

Mikolo Mwambe Elongo na Yesu – Yesu Azali Nani?

Kotambola oyo ekotalisa yo na Yesu mpe na nani oyo Ye azali. Kamata tango oyo mpo na kobongisa mpe kokotisa na mozindo boyebi na yo ya Yesu, Mwana ya Nzambe.

 

Mikolo Sambo Elongo na Yesu – Ngolu

Sala mobembo elongo na Yesu mpo na koyekola mingi koleka na maye matali kokabola mpe kozwa ngolu wana ozali kobika, kokamba mpe komema bato na mbongwana.

 

Mikolo Motoba Elongo na Yesu – Mbongo mpe Bozwi

Yesu azali na makambo ebele ya koloba na oyo etali mbongo mpe bozwi na biso. Kati na kotambola oyo Ye akobongola biso na motindo ya kosalela mbongo mpe bozwi na biso.